Politíki tǒlotómo la boyángeli, ezalí bwányá ya koyángela makambo ma ekólo lokóla mibéko mizalí kotínda ; ya kobɔngisabomɔi bwabato, bizalela bya bangó ; ya kotámbwisa misála mya ekólo, mpé ya koyókana na bikólo bisúsu ; ezalí sɔ̂lɔ́ ndimbola ya politíki.
Mwâ likébisi litálí lilobapolitíki. Sɔ́kí toyókí liloba «politíki» tǒ «kosála politiki», tokanisaka níni ? Tokanisaka :koyíba, kokósa, kosála mabé, kosála mayele... Kasi politíki ya sɔ̂lɔ́ ezalí bôngó tɛ́. Lilobapolitíki eútí naligresi (lokótá laGresi):polis elingí kolobambóka,engumba,ekólo,esé. Politíki ezalí mosála tǒntɔ́ki ya boyángeli mbóka tǒ ekólo. Ezalí bwányá tǒ mayele ma koyéba bóníbóní bayángela mokili mwa bato, bóníbóní bakamba bato ba ekólo na ndéngé elingí kosepelisa bato bánsɔ.
Yangó wâná, na mosála mwa politíki, moto akoluka malámu mpɔ̂ ya yê mɔ̌kɔ́ mpenzá tɛ́, mpɔ̂ ya libóta lya yě tɛ́, akoluka sé bolámu bwa batu bánsɔ ba lisangá.
Mpɔ̂ yabakonzi baletá, kosɛ́nga bato bazala na *non-viola, elingí koloba mbala mingi kosɛnga bangó basála elɔ́kɔ mɔ̌kɔ́ tɛ́, âtá bazalí komɔ́na mpási ndéngé na ndéngé..., batála sé namǐso âtá babɛ́tí tǒ babomí bangó.<br\>Mpɔ̂ nalingómbá lya politíki liye libóyíbisálela bya letá, míngi mazalí komíbênga babóya-matatá tô ba non-viola bobɛ́lɛ́ mpɔ̂ bazángímandóki tǒbibuneli mpɔ̂ na kozóngiselabakonzi ba letá *violans iye bazalí kosála bangó. Mpɔ̂ nabikelézia, sɔ́kí bizalí na ngámbo ya bakonzi ba letá, bakotéya *non-violans eye elingí koloba komítíka na mpási.
Ezalí na mitíndo mingi ya politíki, mpé politíki ekabwání nzéla mísató :